Matthew 18

Nani azali moto monene na Bokonzi ya Likolo

(Mk. 9.33-37 ; Lk. 9.46-48)

1Na tango wana, bayekoli bayaki epai ya Yesu mpe batunaki ye :

—Nani aleki monene na Bokonzi ya Likolo ?

2Yesu abengaki mwana moko ya moke, atiaki ye na kati-kati na bango, 3mpe alobaki :

—Nalobi na bino ya solo, soki bobongwani te mpe bokomi lokolabana mike te, bokokota te na Bokonzi ya Likolo.
4Yango wana, moto nyonso oyo akomikitisa lokola mwana oyo, ye nde azali moto monene na Bokonzi ya Likolo. 5Mpe moto nyonso oyo akoyamba mwana ya ndenge oyo na kombo na ngai, ayambi ngai moko.

(Mk. 9.42-48 ; Lk. 17.1-2)

6Kasi oyo akokweyisa na masumu mwana moko na kati ya bana mike oyo bazali kondima ngai, ekozala malamu mpo na ye ete bakanga ye libanga moko ya monene na kingo, mpe badindisa ye na nse penza ya ebale !

7Mawa mingi na mokili mpo na makambo oyo ekweyisaka bato na masumu ! Makambo yango esengeli koya, kasi mawa mingi na moto oyo akozala nzela oyo makambo yango ekoyela.

8Soki ozali kokweya na masumu mpo na loboko to mpo na lokolo na yo, kata yango mpe bwaka yango mosika. Pamba te, ezali malamu mpo na yo okota na Bomoi na loboko moko to na lokolo moko ; ete obwakama na moto oyo ekufaka te na maboko mibale to makolo mibale.

9Soki ozali kokweya na masumu mpo na liso na yo, longola yango mpe bwaka yango mosika. Pamba te ezali malamu mpo na yo okota na Bomoina liso moko ; ete obwakama na moto ya lifelo na miso na yo nyonso mibale !

(Lk. 15.1-7)

10Bokeba ete botiola ata mwana moko te na kati ya bana oyo pamba te, nalobi na bino : baanzelu na bango na Likolo, bamonaka tango nyonso elongi ya Tata na ngai oyo azali na Likolo.

Meme oyo ebungaki mpe emonanaki

(Lk. 15.1-7)

11[Pamba te Mwana ya moto ayaki mpo na kobikisa baoyo babunga
Verset oyo ezali te na mikanda misusu ya kala.
.]
12Bokanisi nini ? Soki moto moko azali na bameme nkama bongo moko ebungi, akotika te bameme na ye ntuku libwa na libwa mosusu likolo ya ngomba, mpo akende koluka moko oyo ebungi ? 13Mpe soki amoni yango, nalobi na bino ya solo, akoyoka esengo mingi penza mpo na meme wana moko, koleka esengo ya bameme ntuku libwa na libwa oyo ebungaki te. 14Ndenge moko mpe, Tata na bino ya Likolo, alingi te ete ata mwanamoko na kati ya bana oyo abunga.

Ndenge nini kolimbisa ndeko oyo asali yo mabe

15Soki ndeko na yo asali yo mabe, kende mpe lakisa ye mabe na yempe bozala kaka bino mibale. Soki ayokeli yo, wana ozongisi ndeko na yo na nzela ya malamu. 16Kasi soki ayokeli yo te, mema moto mosusu to bato mibale, mpo ete makambo nyonso oyo bokoloba endimama na nzela ya litatoli yabatemwe mibale to misato. 17Soki aboyi koyoka bango, yebisa likambo yango na Lingomba ; soki aboyi koyokela Lingomba, zwa ye lokola mopakano mpe lokola mofutisi mpako. 18Nalobi na bino ya solo ; makambo nyonso oyo bino bokokanga awa na nse, ekokangama mpe na Likolo ; mpe nyonso oyo bino bokofungola awa na nse, ekofungwama mpe na Likolo.

19Nalobi na bino lisusu : soki bato mibale na kati na bino, awa na mokili, bayokani mpo basenga ata eloko nini, Tata na ngai oyo azalina Likolo akopesa bango yango. 20Pamba te esika bato mibale to misato basangani na kombo na ngai, ngai mpe nazali na kati na bango.

21Bongo Piere ayaki epai ya Yesu mpe atunaki :

—Nkolo, mbala boni nasengeli kolimbisa ndeko na ngai oyo asalaka ngai mabe ? Ekoki kozala mbala sambo ?

22Yesu azongisaki :

—Nalobi na yo te kino mbala sambo, kasi kino mbala tuku sambombala sambo !
23Yango wana, Bokonzi ya Likolo ekokani na mokonzi moko oyo alingaki kotanga mbongo na ye na basali na ye. 24Tango abandaki kotanga, bamemelaki ye mosali moko oyo azalaki na nyongo na ye ya bamili zomi na batalenta
Talenta  : mbongo ya ebende oyo ezalaki namotuya ya makasi ya nkoto motoba ya badeni. Ezali mbongo ebele mpeuze.
.
25Lokola azalaki na eloko moko te mpo na kofuta, mokonzi na ye atindaki ete bateka ye na mwasi na ye ; na bana na ye, na biloko na ye nyonso, mpo nyongo na ye efutama. 26Kasi mosali oyo afukamaki liboso ya mokonzi, mpe abondelaki ye :

—Kanga motema mpo na ngai, nakofuta yo nyongo nyonso !

27Mokonzi ayokelaki ye mawa, alimbisaki nyongo na ye mpe atikaki yeakende.

28Kasi tango mosali wana abimaki, akutanaki na moninga na ye ya mosala, oyo adefaki badeni
Deni  : mbongo ya libende oyo bazalaki kosalela mpo na kofuta mpako
na ye kama. Akangaki ye mpe afinaki na kingo. Bongo alobaki na ye :

—Futa nyongo na ngai nyonso.

29Moninga na ye ya mosala afukamaki mpe abondelaki ye :

—Kanga motema mpo na ngai, nakofuta yo nyonso na yo.

30Kasi ye aboyaki. Akendaki mpe atiesaki ye na boloko kino tangoasilisaki kofuta niongo nyonso.

31Tango basali mosusu bamonaki ndenge makambo elekaki, bayokaki mawa mingi penza, mpe bakendaki koyebisa nyonso epai ya mokonzi na bango. 32Bongo mokonzi abengaki mosali wana mpe alobaki na ye :

—Mosali mabe ! Nalimbisaki yo nyongo nyonso oyo ozalaki na yango, mpo obondelaki ngai.
33Boni, okokaki te koyokela moninga na yo mawa ndenge ngai mpe nayokelaki yo mawa.

34Lokola mokonzi na ye azalaki na kanda, apesaki ye na maboko ya bato oyo baniokolaka bato kino tango afutaki niongo nyonso. 35Na ndenge wana nde, Tata na ngai ya Likolo, akosala moto na moto na kati na bino, oyo akoboya kolimbis ndeko na ye na motema mobimba !
Copyright information for LinMNB